Nkamisha

de Charles Mombaya

Frère yebisa nga pona nini mokili echangé?
Frère yebisa nga pona nini mokili ekomi boye oh papa?

Ndeko tozalaki kosambela lelo akoma apôtre
Bangomba ekoma ebele pona bato ya motindo oyo
Balingi kosala makambo nionso na volonté ya bango moko
Wapi volonté ya Nzambe?
Wapi ebengeli ya Klisto oh papa?

Frère yebisa nga pona nini mokili echangé?
Frère yebisa nga pona nini mokili ekomi boye oh papa?

Wuta kala Molimo Mosantu azalaki na ye kosala
Kasi oction ekoma lelo likambo ya kokamua
Bateyi mingi bakoma kopengwa likolo se ya oction
Wapi epakoleli ya Nzambe?
Wapi Molimo Mosantu oh papa?

Frère yebisa nga pona nini mokili echangé?
Frère yebisa nga pona nini mokili ekomi boye oh papa?

Mingi bakoma kobombama na sima ya kombo ya Klisto
Kasi misala na bango ezali ya bato ya lofundu
Lokuta ekoma vérité na minoko ya baklisto
Wapi vérité mokristo?
Wapi solo mokristo?

Frère yebisa nga pona nini mokili echangé?
Frère yebisa nga pona nini mokili ekomi boye oh papa?

Kati na bible tokotangaka lingomba ezali ya Klisto
Kasi bangomba ebele ekoma likabo ya bateyi
Bakristo pe biloko nionso ekoma ba bien privé ya bango moko
Wapi lingomba ya Klisto oh?
Wapi lingomba mosantu oh papa?

Ndeko na nga oh nayoki manso ozali kotuna
Kasi kobosana te makambo nionso oyo tozali komona
Ekomama na bible ete na mikolo ya suka eh
Ebele ya ba faux prophètes bakotonda na mboka eh
Bakoluka kozindisa mitema ya ba ndimi mosusu
Wana toko mona makambo nionso na mokili eh
Bitumba kokabuana ba pasi ekobima na mboka eh
Koya na mwana moto solo ekomi pembeni
Senzelaka moninga mokolo eyebani te
Moto akosa yo te simba kondima na yo makasi eh

Senzelaka moninga
Senzelaka moninga
Senzelaka moninga
Senzelaka moninga
Senzelaka moninga
Senzelaka moninga
Senzelaka moninga
Senzelaka moninga

Más canciones de Charles Mombaya