Napesi
de Charles Mombaya
Bato bakotunaka nga pona nini ngai nalandaka Yesu
Bamokili bakokamwa pona nini ngai nasalelaka Yesu
Oh
Bato bakotunaka nga pona nini ngai nalandaka Yesu
Bamokili bakokamwa pona nini ngai nasalelaka Yesu
Eyano na nga
Nkolo asungi nga kati na minioko
Nkolo apesi nga kimia na motema
Nkolo apesi nga bomoyi na seko
Tala tina
Aniokwami pe afingamaki
Mpo nga nazua bomoyi na seko
Na Golgotha makila na Yesu
Esopanaki mpo nabika
Oh pasi ye amonelaki nga
Yesu Masiya na nga
Na yango nakosalela Masiya tango nionso ata pasi
Na yango nakosalela Nkolo na nga tango nionso kino suka
Po Yesu alingi nga mingi
Ngai pe nalingi Masiya
Po Yesu amemaki pasi na nga
Ngai pe nakobila se Ye
Eyano na nga
Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya)
Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh apesi nini oh)
Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh)
Tala tina (Tala tina)
Ata bato bapekisi nga
Nakolanda kaka Masiya
Ata ba camarades baboyi ngai
Nakoki te kotika Masiya
Atako nakoti boloko
Nakoki te nga nawangana Yesu
Na yango nakosalela ye Nkolo kino suka ata pasi
Na yango nakobila ye Masiya tango nionso kino azonga
Po Yesu alingi nga mingi
Ngai pe nalingi Masiya
Po Yesu amemaki pasi na ngai
Ngai pe nakobila Yesu
Eyano
Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya)
Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh apesi nini oh)
Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh)
Tala tina (Tala tina)
Bamokili bazali kokamwa
Bolingo na nga na Masiya
Basusu bazali komituna
Tina nini nakangama na Yesu
Babosani ete azali nzela
Oyo ekomemaka na mboka na lola
Na yango nakotalela Ye Nkolo tango nionso mpo nabika
Na maboko na Ye kobanga esili nazui kimia pe lobiko
Po Yesu alingi nga mingi
Ngai pe nalingi Masiya
Po Yesu amemaki pasi na nga
Ngai pe nakobila se Ye
Eyano na nga
Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya)
Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh lisusu nini)
Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh)
Tala tina (Tala tina)
Más canciones de Charles Mombaya
-
Rabbi
Rabbi
-
Rétro
Rétro
-
Pesa Munu Passage
Rabbi
-
Tango Yang’oyo
Rabbi
-
Le Dieu Que Je Sers
Rabbi
-
Lisanga
Rabbi
-
Nakotika Te
Rabbi
-
Combattons Pour L’unité
Rabbi
-
Je Dois Partir
Rabbi
-
Bobele Yo
Rabbi
-
Hello
Rétro
-
Bandolero
Rétro
-
El Vira
Rétro
-
Sarajevo
Rétro
-
Key Largo
Rétro
-
DZ
Rétro
-
Tu m'as saoulé
Rétro
-
Ben Affleck
Rétro
-
Fetty Wap
Rétro
-
Love d'elle
Rétro