Délivrance

de Charles Mombaya

Naye lelo, naye lelo
Naye lelo epayi ya Nkolo Yesu Klisto Masiya eh
Naye kopesa ye merci pona manso asali kati na bomoyi na nga
Yesu eh

Nandimaki te baninga
Nandimaki te bapasi na ngai ewutaki na coutume
Nayebaki te minioko na ngai ewutaki na libota eh
Envoûtement ekangaki ngai misu na yebaki te ba mpangi eh
Nakanisaki manso ezali koyela volonté ya Nzambe
Nzoka nazalaki komikosa eh, il fallait nakota mozindo nayeba

Mabolongo na se
Nakoti mozindo nabimi na kati ya kindoki ya libota eh
Nakoti lisusu mozindo célibat na nga nionso ekweyi eh
Nazindi lisusu ngai wana na longwe na kati ya chômage
Nakoti lisusu stérilité na ngai nionso esili eh
Yango naye kokumisa Mwana Nzambe

Tika nayembela Yesu eh (Lalalalalalala)
Azali Nzambe ya bikamua
Oh tika nakumisa Yesu eh
Asaleli ngai ya mingi eh
Oh tika nabinela Yesu eh
Tika napambola Yesu eh
Akangoli ngai na pasi eh Yesu eh

Mabolongo na se
Nakoti mozindo, nabimi na kangolami na coutumes
Nakoti mozindo, envoûtement nazalaki yango ekweyi eh
Nakoti lisusu nabimi na kati ya servitude
Nazindi makasi mapamboli na ngai nionso ezongi eh
Yango naye kokumisa Mwana Nzambe

Tika nayembela Yesu eh
Oh tika nakumisa Yesu eh
Akangoli ngai na pasi eh
Asaleli ngai ya mingi Yesu eh
Apesi kimia na motema
Oh tika nabinela Yesu eh
Solution ya makambu na ngai, Yesu eh

Tika nayembela Yesu eh
Tika nakumisa Yesu eh
Azali Nzambe na bikamua
Asaleli ngai ya mingi eh
Oh tika nabinela Yesu eh
Tika napambola Yesu eh
Akangoli ngai na pasi eh
Apesi kimia na motema
Asaleli ngai ya mingi eh
Oh tika nakumisa Yesu eh
Akangoli ngai na pasi eh

Más canciones de Charles Mombaya